Kɔ́ngɔ-Kinshasa
From Wikipedia
|
|||||
Mokáno mwa ekólo: Bosémbo, Bobóto, Mosálá | |||||
Loyémbo ya lokúmú: Debout Congolais | |||||
Mbóka-mokonzi | Kinsásá | ||||
Engúmba monɛ́nɛ koleka | Kinsásá | ||||
Nkótá ya lɛ́ta | lifalansé | ||||
Nkótá ya ekólo | lingála, kiswahili, ciluba, kikɔ́ngɔ |
||||
Mokonzi | Republiki Joseph Kabila |
||||
dipanda - dipanda na Bɛ́lɛjika |
- 1960-06-30 |
||||
Etando • Nyɛ̂ • Mái (%) |
2 345 410 km² (ya 12) 3.3 |
||||
Mito • 2006 ndakisa-mitúya |
62 660 551 (23) 29,916,800 27/km² (ya 182) |
||||
BOTIBO (BOZIBI) • Nyɛ̂ • moto na moto |
2003 ndakisa-mitúya 35,798 (ya 7) ya 189 (ya 189) |
||||
Mosɔlɔ | falánga ya Kɔ́ngɔ (CFR ) |
||||
Ngonga • Summer (DST) |
UTC (UTC+1 na +2) - (UTC-) |
||||
Internet TLD | .CD | ||||
Calling code | +243 |
||||
Republiki ya Kɔ́ngɔ Demokratiki ezalí esé ya Afríka ya Mambénga, ezwamí na ndelo ya ye ya mwa sánzá ya motóbá mikɔlɔ 30 1960, ekólo ya makokí, lipanda, bonsɔ́mí, ekanganí mpé ekabwaní tɛ́, ya bato, ya bokonzi boutí na bato mpé eponi eyamba yɔ̂kɔ tɛ́.
Etápe |
[kobalola] Lokótá
Na ekolo Kɔ́ngɔ elobamí nkótá kama míbalé. Nyɔ́nsɔ wâná elakísí boyébí bwa bato ya bomɛngo etondi mabelé. Ciluba, kikongo, lingála mpé kiswahili ezalí bakótá banɛ́nɛ banei ya ekólo, kasi bakótá kama míbalé balobaka na ekólo Kɔ́ngɔ.
Míngi śé na káti ya bakótá bya ekólo bokoyéba etando ya bikelá, mabelé, nyama mpé nzeté.
Bamongo bazalí na bakombo míngi ya nzeté ya mbíla na maye manso basálelaka. Sɔ̂lɔ, nzeté ya mbíla eyébaní káka mpó na mafúta na masanga tɛ̂. Eyébaní lokóla nkísi ekosílisa makɔnɔ, naye mpé bakosála bitúnga mpé bikila kila.
[kobalola] Likambo
Ekakoli ya molayi : Mpo ya Kɔ́ngɔ-Kinshasa
Tala mpé: Ntangó ya banɔ́kɔ́(Kɔ́ngɔ Demokratiki)
Zaïre ezalákí banda 1971 te 1999 nkómbó óyo ebêngámákí Republiki ya Kɔ́ngɔ Demokratiki, mfalanga ya ekólo wâná, mpé ebale óyo epésáká ekólo Kɔ́ngɔ ebimélí na yě see mɔ̌kɔ́ na mayi-mozindo Atalantiki.
Congo belge elongákí lipanda na 1960, o nkómbó ya « Republiki ya Kɔ́ngɔ », nkómbó nsé mɔ̌kɔ́ na kolonia ya kala ya Falansia - Kɔ́ngɔ-Brazzaville. Nkómbó ya Republiki ya Kɔ́ngɔ Demokratiki ezwamákí na 1966, kasi bikólo babale basilákí koyébana míngi-míngi, mpé kokesana na nkómbó ya bingumba-mikonzi ba bángo, mpó na komibengama Kɔ́ngɔ-Léopoldville (mpé Kɔ́ngɔ-Kinshasa na sima 1965), na Kɔ́ngɔ-Brazzaville.
Nkómbó ya kala | Nkómbó ya sika (1965) |
---|---|
Léopoldville | Kinshasa |
Stanleyville | Kisangani |
Élisabethville | Lubumbashi |
Jadotville | Likasi |
Albertville | Kalemie |
Cocquilhatville | Mbandaka |
Costermansville | Bukavu |
Bakwanga | Mbuji-Mayi |
Luluabourg | Kananga |
Nouvelle Anvers | Makanza |
Port Francqui | Ilebo |
Banningville | Bandundu |
Paulis | Isiro |
Thysville | Mbanza-Ngungu |
Leverville | Lusanga |
Baudoinville | Moba |
Ponthierville | Ubundu |
Banzyville | Mobayi-Mbongo |
Élisabetha | Lukutu |
Charlesville | Djokupunda |
[kobalola] Bato
Ekakoli ya molayi : fr:Démographie de la République démocratique du Congo
est. | bato | source |
---|---|---|
1990 | 37 405 000 | (UNHCR Bikólo ya Molɔngɔ) |
1991 | ||
1992 | ||
1993 | ||
1994 | ||
1995 | 45 453 000 | (UNHCR Bikólo ya Molɔngɔ) |
1996 | 46 812 000 | (UNHCR Bikólo ya Molɔngɔ) |
1997 | 48 040 000 | (UNHCR Bikólo ya Molɔngɔ) |
1998 | ||
1999 | ||
2000 | 51 390 000 | (globaldefence.net) |
2001 | 53 624 718 | (yuli; CIA World Factbook) |
2002 | 55 225 478 | (yuli; CIA World Factbook) |
2003 | 56 625 039 | (yuli; CIA World Factbook) |
2004 | 58 318 000 | (CIA World Factbook) |
2005 | 60 085 804 | (yuli; CIA World Factbook) |
[kobalola] Bitúká bya Kɔ́ngɔ-Kinshasa
Ekakoli ya molayi : Bitúká bya Kɔ́ngɔ-Kinshasa
Biteni mikonzi bya Kɔ́ngɔ-Kinshasa mibengami Bitúká (Provinces ya lifalansé). Kinshasa ezalí mboka mokonzi ya ekólo mpé efándeli ya bitúlúká bya ekólo. Ezalí na makokí ma engúmba. Bingúmba mpé bitúká biyángélámí, bizwí makokí ma koyángela yangó mɔ̌kɔ́ na mobéko mpé bikambémí na bato baye bazwamí na bitúká bike bya mbóka. Bitúká biina bia bonsɔ́mí bizalí mbóka mondɛ́lɛ́, komine, seketele mpé sefeli. Bitúká bya Kɔ́ngɔ-Kinshasa bazalí:
- Bandundu
- Bas-Congo
- Ekwatéli
- Kasaï-Occidental
- Kasaï-Oriental
- Katanga
- Kinshasa
- Maniema
- Nord-Kivu
- Orientale
- Sud-Kivu
[kobalola] Bikela
Ekolo Kongo Demokratiki ekenda sango mokili mobimba mpona biloko bya mabele mwaye. Ya solo ekolo moko lisusu te na Afrika akokani naye na banyama mpe zamba ndenge na ndenge.
[kobalola] Zamba na banyama : bobateli bwa bikela o kati ya zamba ya leta
Banganga mayele batangi ndenge 11000 ya banzete, 409 ya banyama ya mabele, 1086 ya bandeke, 1069 ya mbisi mpe 152 ya banyoka. Bokozwa te na ekolo esusu ya Afrika banzete mpe banyama etangami ndenge na ndenge.
- Na ekolo Kongo, bokozwa bangomba, bisobe, bibale, babweta na bangomba moto; bokozwa mpe zamba ndenge mingi lokola zamba ya mokili mwa molunge, nzete ya bozangi mai, bisobe mpe bikombo.
- Banyama ya seko baye bavandaka nse wana, lokola mondonga, bonobo, lokulokoko lwa Kongo, mpe gambala ya mai. Soki tobebisi zamba na bango, bakolimwa elongo.
[kobalola] Bikela bikopesa biloko bya kobongola
Mbongo ekotisa ba nzete mpe mabanga ya talo ezali na esika enene na kati ya ekolo Kongo.
- Mabele o ekolo Kongo etondi mabanga ya talo lokola wolo, kobalti, etani, koltani, jemanyu, diama, mbongo, mbengi, etc.
Na tango ya kala, mabanga masusu mazalaki na tina te. Lelo tina na bango tembe nye. Lokola koltani ebwakamaki lokola bosoto bwa etani. Lelo, mosala ya elektroniki esengi tantalu, mpe na mikolo mya lelo, balokotaka bandambo ya etani mpona kobongola.
Aluminyu na mbengi ezwamaka na bandambo ya mituka mpe biloko bya mwinda. Na mboka minene, ba fondele basalaka biloko ya bosalisi, kasi tango mosusu, biloko ya kotala elengi. Mpona mipaya, bakosala biloko na singa ya aluminyu, soki mpe na mbengi ; mpona bana mike, bakosala biloko ya esano.
Nzete ezali na lisalisi linene na kati ya mboka, lokola nkoni, ekoki mpe kobongwama, bakoteka ye mpe na mboka mopaya. Nzete ya ekolo esengami mingi mpona mosala ya libaya, nzete ya mwindo mpona biloko ya ndako, mabaya ya kotika na mabele, mpe mabaya ya mbongwana enene.
[kobalola] Bikela bikopesa bilei mpe nkisi
Bikela bipesi banyama, bankasa mpe banzete ya kosalisa bokono ndenge na ndenge. Bisaleli bina ya mikolo na mikolo elakisi mayele mwa bato.
Soki tolongoli bokila na ndobo, bato ya mboka balokota na zamba bambuma, banzenze, mayebo, nzoi mpe bakotekisa na nzela soki mpe na zando.
Na mboka misusu mbiye ekopesa moto bokasi na 40%.
Bikela esali mpe lokola ndako ya minganga.
- Nkisi lokola ilulumba esalisa bokono bwa pulu pulu, esilisa mokosa, bokono ya ndeke mpe kosukosu. Esengeli toyeba. Mayele ya banganga nkisi ya Balele etangi banzete 123. Bosalisi ya banganga ya Baluba esengi mingi banzembo.
- Babenga kombo Bambuti mpe Baife baye bavandi na zamba Ituri bazali na bikela bya bango. Bambuti bayebi banyama ya koleka kama mibale, mpe banzete ya koleka kama moko. Bakoboma nyama na basinga. Kasi Baife, bakobenga mpe bakoboma nyama na mbanzi mpe na makonga.
[kobalola] Politiki
Ekakoli ya molayi : Politiki bya Kɔ́ngɔ-Kinshasa
Mobéko Likonzi :
Bakambi Ekolo :
- 1960 - 1965 Joseph Kasavubu
- 1965 - 1997 Mobutu Sese Seko
- 1997 - 2001 Laurent-Désiré Kabila
- 2001 - lɛlɔ́. Joseph Kabila
Bakambi Lɛ́ta :
- 1960 - 1960 Patrice Lumumba
- 1961 - 1961 Joseph Iléo
- 1961 - 1964 Cyrille Adoula
- 1964 - 1965 Moïse Tshombe
- 1965 - 1965 Evariste Kimba
- 1965 - 1966 Léonard Mulamba
- 1966 - 1977 ?
- 1977 - 1979 Mpinga Kasenga
- 1979 - 1980 Bo-Boliko Lokonga Mihambo
- 1980 - 1981 Jean Nguza Karl-I-Bond
- 1981 - 1982 Joseph Untube N'singa Udjuu
- 1982 - 1986 Kengo Wa Dondo
- 1987 - 1988 Mabi Mulumba
- 1988 - 1988 Sambwa Pida Nbagui
- 1988 - 1990 Kengo wa Dondo
- 1990 - 1991 Lunda Bululu
- 1991 - 1991 Mulumba Lukoji
- 1991 - 1991 Étienne Tshisekedi
- 1991 - 1991 Bernardin Mungul Diaka
- 1991 - 1992 Jean Nguza Karl-I-Bond
- 1992 - 1993 Étienne Tshisekedi
- 1993 - 1994 Faustin Birindwa
- 1994 - 1997 Kengo Wa Dondo
- 1997 - 1997 Étienne Tshisekedi
- 1997 - 1997 Likulia Bolongo
[kobalola] Jyografi
Ekakoli ya molayi : Jyografi bya Kɔ́ngɔ-Kinshasa
- Tala mpe : Zamba o Bassin ya ebale Kɔ́ngɔ | Liste des villes de la République démocratique du Congo
[kobalola] Ekonomi
Ekakoli ya molayi : Ekonomi ya Kɔ́ngɔ-Kinshasa
Tala mpe : Coltan
[kobalola] Kiltiri
Ekakoli ya molayi : Kiltiri ya Kɔ́ngɔ-Kinshasa
Date | Nkombo na lifalansé | Nkombo na lingala | Ntembe |
---|---|---|---|
4 janvier | journée des Martyrs de l'indépendance | ||
17 janvier | journée du Héros National et de ses compagnons d'infortune | ||
30 juin | date anniversaire de l'indépendance | Mukolo ya Lipanda | |
16 février | journée des Martyrs de la Démocratie | Mokolo ya baye bakufa pona demokrasi | |
17 mai | date anniversaire de la libération du Peuple de la tyrannie |
[kobalola] Divers
- Données chiffrées
- Forces française hors de la métropole
[kobalola] Tála mpé
- Santé en République démocratique du Congo
[kobalola] Mankásá o libándá
- Carte du Congo (1958)
- Informations d'Amnesty International
- Site du Gouvernement
- Site de l'ambassade à Bruxelles
- Site du Ministère des Finances
- Site de la Banque Centrale du Congo
- Site du Ministère de la santé
- Site du Ministère des mines
- Site du Comité de Coordination des Ressources Extérieures
- Site de l'Unité de coordination du Projet
- L'Avenir - Basango na Lingala
Bisé ya Afrika |
Bisé ya Afrika ya méditeranéa : Aljeria · Ejipte 1 · Libîya · Maroc 3 · Tunisia Bisé ya Afrika ya Weste : Bénin · Burkina Faso · Cap-Vert 2 · Côte d'Ivoire · Gambie · Ghana · Guinée · Guinée-Bissau · Liberia · Mali · Mauritanie · Niger · Nigeria · Sénégal · Sierra Leone · Togo Bisé ya Afrika ya Katikati : Kamerun · Repubiliki ya Santrafrika · Republiki ya Kɔ́ngɔ · Republiki ya Kɔ́ngɔ Demokratiki · Gabon · Gine-Ekwatorial · São Tomé-na-Príncipe · Tshadi Bisé ya Afrika ya Este : Burundi · Djibuti · Elitré · Etiopi · Kenya · Uganda · Rwanda · Seyshel 2 · Somalia · Sudan · Tanzania Bisé ya Afrika ya Sidi : Sidafrica · Angola · Botswana · Komori 2 · Lesoto · Madagasikari 2 · Malawi · Morisi 2 · Mozambiki · Namibia · Swaziland · Zambia · Zimbabwe |
Bisé mosusu : Sahara occidental 4 · Somaliland 1 ezali kaka eteni ya Afrika ndambo 2 ekolo oyo ekutani okati ya mayi-mozindo 3 ezali eteni ya Lisanga ya Afrika te 4 endimami na bikolo nionso ya molongo te, kasi ezali eteni ya Lisanga ya Afrika |