Web - Amazon

We provide Linux to the World


We support WINRAR [What is this] - [Download .exe file(s) for Windows]

CLASSICISTRANIERI HOME PAGE - YOUTUBE CHANNEL
SITEMAP
Audiobooks by Valerio Di Stefano: Single Download - Complete Download [TAR] [WIM] [ZIP] [RAR] - Alphabetical Download  [TAR] [WIM] [ZIP] [RAR] - Download Instructions

Make a donation: IBAN: IT36M0708677020000000008016 - BIC/SWIFT:  ICRAITRRU60 - VALERIO DI STEFANO or
Privacy Policy Cookie Policy Terms and Conditions
Grippe ya ndeke - Wikipedia

Grippe ya ndeke

From Wikipedia

Influenza A au microscope électronique(Source: Dr. Erskine Palmer, Centers for Disease Control and Prevention Public Health Image Library).
Enlarge
Influenza A au microscope électronique
(Source: Dr. Erskine Palmer, Centers for Disease Control and Prevention Public Health Image Library).

Grippe ya ndeke (to grippe ya Avian) ezali grippe moko eye ezuaka surtout ba ndeke ya zamba mpe ya mboka. Ekoki kupanzana noki noki mpenza na kati ya bandeke na bopesi bokono mpe liwa, surtout na kati ya ba ferme ya ba soso to na kati ya nzando oyo ezali kotiya ba soso oyo ezali na bumoyi ebele esika moko.

Bandeke to basoso eye ezali na bukono ebombaka ba virus ya grippe na kati ya soi na bango, na mai ya zolo mpe na soi eye ezali kokweya, yango nde epanzaka virus eye na kati ya ba plumes ya bandeke to basoso. Sorte ya mabe ya grippe ya ndeke (eye epesami na virus H5N1) ezali esika oyo kozua ba ndeke (surtout ba soso mpe mabata na ba ndeke ya zamba mosusu) na kati ya Asie na Eropa (tala: http://www.who.int mpo na liste ya ba regions eye ezali na bokono bwango).

Image:H5N1.JPG
Photographie electromicroscopique ya H5N1 (Virus coloré en or)

Na mikolo oyo ewuti koleka, virus H5N1 epanzamaki na kati ya bato mpe epesi bokono mabe na kati ya bato mwa muke baye bazalaki na contact na bandeke eye ezalaki na bokono yango. Pembeni ya moitie ya bato oyo bazuaki bokono basilaki kokufa. Nata moto moko te asili kozua bono oyo na kati ya Kɔ́ngɔ.

Na tango ya lelo (yúni 2006), ata cas moko te ya moto apesi moto mosusu virus eye. Ata ko ekoti na contact na ba ndeke eye ezali na bokono eye, bandeke ya bomoyi to ekufa, risque ya kozua grippe ya ndeke ezali moke mpenza. Na mikolo ya lelo, restriction ezali te mpo na ko voyager to kokende na ba mboka oyo ezali affecte. Ba voyageurs basengeli koyeba ba risque mpe kolanda ba conseil epesami na wikipedia.

[kobalola] Soki ozali ko kende na mboka oyo ezali na bokono

Les pays touchés par la grippe aviaire le 11 février 2006. En orange, les cas humains et animaux. En jaune, les cas animaux seulement.
Enlarge
Les pays touchés par la grippe aviaire le 11 février 2006. En orange, les cas humains et animaux. En jaune, les cas animaux seulement.

Soki ozali ko visiter ba boka eye eyabani ezali na grippe ya ndeke H5N1 na kati ya ba ndeke to ba soso, esengeli olanda ba mesures eye elandi:

  • ko kende ko visiter te ba ferme ya ba ndeke to ba soso to ba zando;
  • tika to simba to kovanda pembeni na ba soso to ba ndeke eye ezali na bomoi to ekufa; *kolia te ba ndeke to ba soso oyo eza ya mobesu to elambami malamu te;
  • kolia te ba produits ya mobesu to eye elambami malamu te y compris makila;
  • sokola maboko mbala mingi na sabuni mpe na mai.

Soki ezali na contact na ba ndeke to ba soso ya bomoyi to ekufa na kati ya bamboka eye eyebami ezali na bokono eye, esengeli oyeba ba symptomes ya grippe ya ndeke okati ya bato. Ba symptomes eye ezali ndeke moko na ba symptomes ya grippe ordinaire mpe ekoki kobima noki mpenza. Ba symptomes yango ezali:

  • fievre (temperature ya 38°C to koleka);
  • kosu kosu;
  • kosila mpema noki;
  • moto pasi;
  • gorge evimbi;
  • miso eteli/evimbi;
  • misisa pasi.

Soki ozui ba symptomes eye na tango ozali na mboko mopaya, mpe ozalaki na contact na ba soso to ba ndeke ya bomoyi to ekufa esengeli omona dokotolo ya mboka eye ozali.

[kobalola] Soki ozali kozonga na ba mboka eye ezali na bokono boye

Soki na sima ya mikolo sambo ya bolungui mboko eye ezali na bokono ete oyebi ete ozalaki na contact na ba ndeke to basoso ya bomoyi to ekufa, ozwi ba symptomes eye epesami na liste oyo na page ya liboso, ezali important ete yo:

  • oluka komono dokotolo immediatement;
  • o telephoner dokotolo na yo to yebisa ba symptomes na yo mpe histoire ya voyage eye owuti kosala;
  • olanda ba mateya oyo ba pesi yo.

Ba kisi lokula aspirine, ibuprofen to paracetamol ekoki kosalisa na kokitisa ba symptomes. Landa ba mateya ya ba kisi. Kopesa te aspirine na bana baye bazali na moins de 16 ans. Lukula esengemi na infection respiratoire nyoso, esengeli olanda ba pratiques ya hygiene ya malamu:

  • kokanga zolo na yo na monoko na yo na tango ozali ko kosola to ko eternuer;
  • ko utiliser tissue kaka bala moko na tango ozali kokosola to ku eternuer mpe kubwaka yango na mbala moko mpe na ba soin nyoso;
  • kosokola maboko na yo mbala mingi na sabuni mpe na mai.
Our "Network":

Project Gutenberg
https://gutenberg.classicistranieri.com

Encyclopaedia Britannica 1911
https://encyclopaediabritannica.classicistranieri.com

Librivox Audiobooks
https://librivox.classicistranieri.com

Linux Distributions
https://old.classicistranieri.com

Magnatune (MP3 Music)
https://magnatune.classicistranieri.com

Static Wikipedia (June 2008)
https://wikipedia.classicistranieri.com

Static Wikipedia (March 2008)
https://wikipedia2007.classicistranieri.com/mar2008/

Static Wikipedia (2007)
https://wikipedia2007.classicistranieri.com

Static Wikipedia (2006)
https://wikipedia2006.classicistranieri.com

Liber Liber
https://liberliber.classicistranieri.com

ZIM Files for Kiwix
https://zim.classicistranieri.com


Other Websites:

Bach - Goldberg Variations
https://www.goldbergvariations.org

Lazarillo de Tormes
https://www.lazarillodetormes.org

Madame Bovary
https://www.madamebovary.org

Il Fu Mattia Pascal
https://www.mattiapascal.it

The Voice in the Desert
https://www.thevoiceinthedesert.org

Confessione d'un amore fascista
https://www.amorefascista.it

Malinverno
https://www.malinverno.org

Debito formativo
https://www.debitoformativo.it

Adina Spire
https://www.adinaspire.com